Published Date: Jul 28, 2026 Updated Date: Jul 28, 2026
Kitamata cover
English

Kitamata Lyrics

Fally Ipupa 34 views

Kitamata Song Lyrics

Aahn, Martin Lukusa

Yokela nga ngo bolingo motema esali pasi
Na makanisi ngai nakokondo
Namituni na motema eloko oyo bolingo
Ewuta wapi mama?
Ekobandaka na kolula, ekoti pema
Sima esimbi nzoto mobimba
Ekomi kosenga zuwa lokoso na motema
Olinga moto asimba te

Nayebisi na bato lelo po bayeba
Ndenge nalingaka yo mon amour
Beauté etonda yo nani akela yo
Nazui eperdement oh nabebi
Linga nga tolingana oh na motema
Nga naponi yo oh o motema
Nasengi mingi pe defisa ngai motema na yo
Nasimbela yo mwa moke

Oyo suka ya beauté nasala nini ah
Naye zoba Martin
Eloko oyo ezanga soni, ezanga mvula
Ezanga miso mama
Nakomi lokola zoba lokola mwana
Abotami se lelo oyo
Nionso se po ya bolingo poupée na ngai eh
Nasuka wapi mama

Nayembi na nzеmbo lelo po oyeba
Yo nde motеma na ngai, ah chérie eh
Kokosaka ngai te noki te namiboma
Elongwe nde bolingo ekoma magie
Naboyi nazangaka yo ata ngonga moko
Nalingi natalaka yo lokola tala-tala
Poupée na nga oh ma belle
Lukusa na nga suka beauté

Oyo suka ya beauté nasala nini ah
Naye zoba ima eh
Eloko oyo ezanga soni, ezanga mbula
Ezanga miso mama

Martin Lukusa ah

Attachez vos ceintures, s'il vous plait, on décolle
Fally Ipup's appelle le commandant Jo Sex

Pasi ya bolingo ezalaka nde somo
Moto soki olingi ye, alingi n'e souffrance
Okokoma kizengi, okomi komisambwisa
Ah mama, kosalaka ngai boye te
Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te

Ngai nalingaka y'osalaka mwa geste
Wana ngai nakomaka neti mwa yuma
Chérie kitoko na yo epesaka nga trouble
Est-ce que okotela nga mwa magie na nzoto
Tala ndenge nga nakomaka zoba zoba
Soki oseki nga nakomi se gentil gentil
Osala nini po nakoma se kodenge mama?
Ah mama, kosalaka nga boye te eh
Eh chérie kokomisa nga bongo te oh

Pasi ya bolingo ezalaka nde somo
Moto soki olingi ye, alingi n'e souffrance
Okokoma kizengi, okomi komisambwisa
Ah mama, kosalaka ngai boye te
Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te

Nzoto ya chérie epesaka ngai nde malade
Nzoto ya mama engengaka lokola mwinda (Flash)
Soki atelemi wana nga nakufi
Soki a fâcher nakomi komilela lela
Omoni ndenge nga nakomaka zoba zoba
Soki aseki nga nakomi nde gentil gentil
Osala nini po ngai nakoma se kodenge mama?
Ah mama, kosala ngai boye te
Eh chérie, kokomisa ngai bongo te oh

Pasi ya bolingo ezalaka nde somo (Lukusa)
Moto soki olingi ye, alingi n'e souffrance
Okokoma kizengi, okomi komisambwisa
Ah mama, kosalaka ngai boye te
Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te

Chérie pesa nga mwa bisou na litama
Wana nga nabosana liwa ezalaka
Chérie suwa ngai moke na litoyi
Wana ngai nabosana la mort ezalaka
Omoni ndenge nga nakomaka zoba zoba
Omoni ndenge nga nakomaka trouble trouble
Omoni ndenge mayi etangaka nga na miso
Ah mama, kosalaka ngai boye te ma
Ah, pardon kokomisa ngai zoba te oh

Pasi ya bolingo ezalaka nde somo (Lukusa)
Moto soki olingi ye, alingi n'e souffrance
Okokoma kizengi, okomi komisambwisa
Ah mama, kosalaka ngai boye te
Ma, pardon, kokomisa ngai bongo te

Martin matisa bolingo esika nalingaka (Eh)
Wana esika nga nakomaka kotitila (Eh)
Lukusa matisa bolingo esika nalingaka (Eh)
Wana esika nga nakomaka kodiembela (Eh)

Kitisa, kitisa (Martin), kitisa, kitisa, o bloquer (Lukusa Lukusa)
Allez, matisa, matisa, matisa, matisa, o bloquer (Lukusa Martin, Lukusa)

Omoni ndenge nga nakomaka zoba zoba
Omoni ndenge mayi etangaka nga na miso
Omoni ndenge, ouuuh ouuuh ouuuh
Omoni ndenge, aaahn aaahn aaahn
Omoni ndenge, ouuuh aaahn aaahn
Omoni ndenge, aaahn aaahn aaahn
Omoni ndenge mayi etangaka, oooohhh
Omoni ndenge nga nakomaka zoba zoba
Ah Martin, kosalaka ngai boye te oh
Shuuut, secret koyebisa ango moto te

The song titled "Kitamata" performed by Fally Ipupa is an extremely passionate rumba song from Congo depicting the strong feelings that come when one falls in love deeply. In his performance, Fally Ipupa reveals how love transforms people bringing them happiness and also pain at once. Fally Ipupa's powerful vocals combined with well-developed musical instruments create an intimate atmosphere of the song. The song does not only depict romantic feelings but also depicts such emotions as jealousy, loneliness, vulnerability and fear of losing somebody to whom one is deeply attached. It is clear that the combination of lyrics and music is rather chemistry, making the song very sincere and intimate.

Credits

Singer(s) Fally Ipupa
Composer(s) Fally Ipupa
Lyricist(s) Fally Ipupa
Release Jul 26, 2026
Language English

Contributors

ZS
LYRICS FINDER Jul 28, 2026
Source identification
VM
LYRICS EDITOR Jul 28, 2026
Formatted & structured lyrics
MK
PUBLISHED BY Jul 28, 2026
Content management team
RD
TRANSLATION EDITOR Jul 28, 2026
Translated lyrics & meanings
IV
FACT CHECKED BY Jul 28, 2026
Verified against original audio

Kitamata Video

Rate "Kitamata"

0 out of 5 · 0 ratings

How Does This Song Make You Feel?

Community Thoughts .

0 Comments

Leave a Reply

Your email address will not be published. Required fields are marked *

No comments yet

Be the first to share your thoughts about these lyrics!